Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malako 4:7 - Mokanda na Bomoi

7 Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube ; banzube ekolaki mpe efinaki-finaki yango. Boye, ebotaki bambuma te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malako 4:7
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala liloba oyo Yawe alobi epai ya bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi : « Bokata bilanga ya sika, mpe botika kolona kati na banzube.


Nkona oyo ekweyi kati na banzube ezali moto oyo ayoki Liloba, kasi baposa mabe ya mokili mpe lokoso ya bomengo efini-fini Liloba kati na ye. Boye akotikala mpe kobota bambuma te.


Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube, banzube ekolaki mpe efinaki-finaki mwa banzete na yango ;


kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu mpe ebotaki bambuma : nkona moko ebotaki bambuma nkama moko ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu, bambuma tuku misato.


Kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpo ete ezalaki na misisa te.


Ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu ; ebimisaki mito, ekolaki mpe ebotaki bambuma : nkona moko ebotaki bambuma tuku misato ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu, bambuma nkama moko. »


Bongo alobaki na bato nyonso : — Bosala keba ! Bomibatela malamu ete bokweya te na lokoso ya konduka bomengo ; pamba te, ezala kati na bofuluki, ezali bomengo te nde esalaka bomoi ya moto.


Bosala keba ete mitema na bino ekoma kilo te likolo ya lokoso ya kolia, likolo ya kolangwa masanga mpe likolo ya mitungisi ya bomoi, noki te mokolo yango ekokanga bino na mbalakata,


Nkona oyo ekweyaki kati na banzube ezali bato oyo, sima na koyoka Liloba, bamitikaka ete, na etamboli na bango, mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo, bomengo mpe bisengo ya mokili efinafina bango, mpe ete babota te bambuma.


Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube ; banzube ekolaki nzela moko na yango mpe efinaki-finaki mito na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ