Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malako 4:6 - Mokanda na Bomoi

6 Kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpo ete ezalaki na misisa te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malako 4:6
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kokamwa ngai te mpo ete nazali mwindo, pamba te moyi nde eyindisi ngai. Bana mibali ya mama na ngai basilikelaki ngai, bakomisaki ngai mokengeli bilanga ya vino. Solo, bilanga na ngai moko ya vino, nazalaki kokoka lisusu te kokengela yango.


Ozalaki ekimelo mpo na mobola, ekimelo mpo na moto oyo akelela, na tango ya pasi, ebombamelo na tango ya mvula makasi mpe pio na tango ya molunge. Pamba te pema ya banyokoli ezali lokola mvula ya makasi oyo ebukaka bamir ;


Tango moyi ebimaki makasi, Nzambe atindaki mopepe ya este oyo epesaki molunge makasi. Moyi ebetaki moto ya Yona makasi. Yona alembaki nzoto, asengaki kokufa ; alobaki : — Eleki malamu ete nakufa na ngai, kasi nazala na bomoi te !


kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpe ekawukaki mpo ete ezalaki na misisa te.


Ndambo mosusu ekweyaki na esika etonda na mabanga, esika oyo mabele ezalaki mingi te ; ebimisaki mito noki mpo ete mabele yango ezalaki na bozindo te.


Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube ; banzube ekolaki mpe efinaki-finaki yango. Boye, ebotaki bambuma te.


mpo ete Klisto avanda kati na mitema na bino na nzela ya kondima. Nabondelaka mpe mpo ete bozwa misisa mpe bolenda kati na bolingo,


bomilendisaka mpe botongaka bomoi na bino kati na Ye, bokangamaka na kondima ndenge bateyaki bino, mpe bozongisaka matondi epai ya Nzambe.


mpe lolenge nyonso ya mabe, mpo na kokosa bato oyo bazali kokende na libebi, pamba te bayambaki te bolingo ya bosolo oyo esengeli kobikisa bango.


Ndenge fololo ekawukaka, ekweyaka mpe ebungisaka kitoko na yango na tango ya moyi makasi, ndenge wana mpe mozwi akolimwa kati na misala na ye nyonso.


Ezali mpe kaka bango nde babetisaka baninga mabaku na tango ya kolia na lisanga : baliaka na lokoso mpe na soni te, balukaka kaka bolamu na bango ; bazali lokola mapata oyo ezangi mayi, oyo mopepe ezali komema ; bazali lokola banzete oyo ebotaka bambuma te, ata na eleko ya kobuka bambuma ; ekufaka mbala mibale soki bapikoli yango.


Bakoyoka lisusu nzala te, posa ya mayi mpe koswa ya moyi to molunge ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ