Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malako 4:41 - Mokanda na Bomoi

41 Somo monene ekotaki kati na bango mpe bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani mpo ete mopepe mpe ebale etosa ye ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malako 4:41
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

tango nalobaki : ‹ Okosuka kino awa, kasi mosika te ; awa nde ekosukela mbonge ya lolendo na yo ? ›


Nani akokani na Yawe kuna na likolo ? Nani akokani na Yawe kati na mampinga ya likolo ?


« Boyokani na Ngai elongo na ye ezali boyokani ya bomoi mpe ya kimia, mpe nakopesa ye yango mpo ete atosa Ngai. Atosaki Ngai solo mpe azalaki kolenga liboso ya Kombo na Ngai.


Bato oyo bazalaki wana bakamwaki mpe bakomaki kolobana : « Moto oyo azali penza ndenge nini mpo ete ezala mopepe mpe ebale etosa ye ? »


Bongo alobaki na bayekoli na Ye : — Mpo na nini bozali kobanga ? Bozali nanu na kondima te ?


Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, kati na etuka ya Geraza,


Boye, mwasi yango abangaki mpe akomaki kolenga, mpo ayebaki likambo oyo esalemaki kati na ye. Ayaki kofukama liboso ya Yesu mpe ayebisaki Ye solo nyonso.


Bato bakamwaki makasi mpe bazalaki koloba : — Azali kosala makambo nyonso malamu ; azali kosala ete ezala bato oyo bakufa matoyi bakoka koyoka, mpe bababa bakoka koloba.


Bato nyonso bakamwaki mpe bakomaki kotunana : — Oyo ezali lisusu maloba nini ! Azali kopesa mitindo epai ya milimo mabe, na bokonzi mpe na nguya nyonso, mpe yango ezali kobima !


Yesu atunaki bayekoli na Ye : — Wapi kondima na bino ? Kasi bango, batondaki na somo mpe bakamwaki, bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani ? Azali kopesa mitindo ata na mipepe mpe na mayi, mpe yango ezali kotosa ye ! »


Yango wana, lokola tozali kozwa Bokonzi oyo eninganaka te, tozongisaka matondi mpe tosalelaka Nzambe na lolenge oyo esepelisaka Ye : na botosi mpe na kobanga.


Nkolo, nani akomeka koboya kotosa Yo mpe koboya kopesa Kombo na Yo nkembo ? Pamba te Yo kaka nde ozali Bule. Bikolo nyonso ekoya mpe ekogumbama liboso na Yo, pamba te misala na Yo ya sembo emonisami na polele.


Kasi, na ngambo na bino, botosa Yawe mpe bosalela Ye na bosembo mpe na mitema na bino mobimba ; botala malamu makambo minene oyo asalelaki bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ