Na tongo, lona milona na yo, mpe na pokwa, kopemisa maboko na yo te, pamba te oyebi te milona nini ekobima, ya tongo to ya pokwa to mpe nyonso mibale ekobima malamu.
Oh ndako ya Jakobi, boyoka Ngai, mpe bino nyonso, batikali ya libota ya Isalaele, bino oyo nandima kobatela wuta na libumu ya mama mpe nandima komema mokumba wuta mbotama na bino.
Petelo atelemaki elongo na bantoma zomi na moko ; mpe na mongongo makasi, alobaki na ebele ya bato : — Bino Bayuda, mpe bino nyonso oyo bovandaka na Yelusalemi, botika ete nalimbola mpo na bino likambo oyo, boyoka malamu makambo oyo nalingi koloba.
Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ?
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, kufa ya mibale ekosala ye pasi ata moke te. »
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye nzela ya kolia mbuma ya nzete ya bomoi, oyo ezali kati na Paradizo ya Nzambe. »