1 Yesu abandaki lisusu koteya pembeni ya ebale. Bato ebele basanganaki pembeni na Ye. Boye, amataki mpe avandaki kati na bwato, mpe bato nyonso batelemaki na mokili, pembeni ya ebale.
Yesu abimaki lisusu mpe akendeki pembeni ya ebale. Bato ebele bayaki epai na Ye mpe ateyaki bango.
Tango Yesu alongwaki kuna, akendeki na ebale elongo na bayekoli na Ye, mpe bato ebele penza balandaki Ye wuta na Galile, na Yuda,
Boye Yesu atindaki bayekoli ete babongisela Ye bwato moko mpo ete bato bafinafina Ye te.
Batikaki bato, bamemaki Ye na bwato mpe bakatisaki na ngambo mosusu. Babwato mosusu mpe ezalaki elongo na bango.
Yesu akitaki na bwato. Mbala moko, moto moko oyo azalaki na molimo mabe abimaki wuta na bakunda mpe ayaki kokutana na Ye.
Yesu azwaki bwato mpe azongaki na ngambo ya ebale ; mpe bato ebele basanganaki pene na Ye, pembeni ya ebale.