Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malako 3:9 - Mokanda na Bomoi

9 Boye Yesu atindaki bayekoli ete babongisela Ye bwato moko mpo ete bato bafinafina Ye te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malako 3:9
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na Yesu kozongisa bato, amataki kati na bwato mpe akendeki na etuka ya Magadani.


Yesu abandaki lisusu koteya pembeni ya ebale. Bato ebele basanganaki pembeni na Ye. Boye, amataki mpe avandaki kati na bwato, mpe bato nyonso batelemaki na mokili, pembeni ya ebale.


Batikaki bato, bamemaki Ye na bwato mpe bakatisaki na ngambo mosusu. Babwato mosusu mpe ezalaki elongo na bango.


Yesu akitaki na bwato. Mbala moko, moto moko oyo azalaki na molimo mabe abimaki wuta na bakunda mpe ayaki kokutana na Ye.


Mbala moko, Yesu mpe asosolaki ete nguya moko ebimi kati na Ye ; abalukaki epai ya ebele ya bato mpe atunaki : — Nani asimbi Ngai na bilamba ?


Bakendeki na bwato, na esika oyo ebombama.


Mokolo moko, wana Yesu azalaki pene ya ebale ya Genezareti, ebele ya bato batondaki pembeni na Ye mpo na koyoka Liloba na Nzambe.


Moko kati na babwato yango ezalaki ya Simona. Yesu amataki na bwato yango mpe asengaki na Simona ete apusa yango mwa mosika longwa na mokili. Bongo avandaki mpe abandaki koteya bato wuta na bwato.


Kasi, lokola Yesu ayebaki ete bazali na makanisi ya kokamata Ye mpo na kokomisa Ye mokonzi, abendanaki lisusu na ngomba mpo ete azala kaka Ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ