Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malako 3:5 - Mokanda na Bomoi

5 Yesu atalaki bango na mawa mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo ete mitema na bango ezalaki makasi lokola libanga. Yesu alobaki na moto yango : — Sembola loboko na yo ! Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebikaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malako 3:5
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Yawe ayokaki mawa na ndenge akelaki moto kati na mokili mpe abongolaki makanisi na Ye.


Mokonzi alobaki na moto na Nzambe : — Bondela Yawe, Nzambe na yo, mpe sambela mpo na ngai ete loboko na ngai ebonga. Moto na Nzambe abondelaki Yawe, mpe loboko ya mokonzi ebongaki, ezongaki ndenge ezalaki liboso.


nasilikaki makasi mpe nabwakaki biloko nyonso ya Tobiya na libanda ya shambre.


Mibu tuku minei, nayinaki bato ya ekeke wana mpe nalobaki : ‹ Bazali bato oyo mitema na bango ebeba, bayebaka banzela na ngai te. ›


Bongo, alobaki na moto yango : — Sembola loboko na yo. Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebongaki, ekomaki malamu lokola loboko mosusu.


Atunaki bango : — Nini epesamela nzela ya kosala na mokolo ya Saba : kosala bolamu to kosala mabe, kobikisa moto to kotika ye kokufa ? Kasi babatelaki kimia.


Nkolo azongiselaki ye : — Bato ya bilongi mibale ! Nani kati na bino, na mokolo ya Saba, afungolaka te mpe amemaka te ngombe na ye to ane na ye, wuta na elielo, mpo ete ekende komela mayi ?


Tango Yesu amonaki bango, alobaki : — Bokende komilakisa epai ya Banganga-Nzambe ! Wana bazalaki kokende kuna, bakomaki peto.


Yesu atalaki moko na moko kati na bango mpe alobaki na moto oyo akufa loboko : — Sembola loboko na yo ! Moto yango asembolaki loboko, mpe loboko na ye ebikaki.


mpe alobaki na ye : — Kende kosukola na liziba ya Siloe. Mokufi miso akendeki mpe asukolaki. Tango azongaki, abandaki komona.


Bandeko, nalingi ete boyeba mabombami oyo mpo ete bomimona te ete boleki na bwanya : ndambo ya bana ya Isalaele bakowumela kozala mitema libanga kino Bapagano nyonso bakokota na libota ya Nzambe.


Kasi mayele na bango ekomaki bozoba. Kino na mokolo ya lelo, tango batangaka mikanda ya Boyokani ya Kala, vwale yango ezalaka kaka, elongwe nanu te kati na bango, pamba te elongwaka kaka kati na Klisto.


Pamba te molili ezipi mayele na bango mpe bazali ya kokabwana na bomoi ya sika oyo Nzambe apesaka, mpo ete bazangi boyebi mpe bazali mitema mabanga.


Soki bosiliki, bosalaka masumu te ; kanda na bino esengeli kosila liboso ete pokwa ekoma.


Boyokisaka Molimo Mosantu ya Nzambe mawa te ; pamba te, na nzela ya Molimo yango, Nzambe abetaki bino kashe na Ye mpo na mokolo ya kokangolama.


mibu tuku minei. Yango wana, natombokelaki bato ya ekeke wana mpe nalobaki : ‹ Mitema na bango ezali kobeba tango nyonso, mpe bayebaki banzela na ngai te. ›


Asilikelaki banani mibu tuku minei ? Ezali te bato oyo basalaki masumu, oyo bibembe na bango ekweyaki kati na esobe ?


Mpe tango kaka Nzambe akomisaki Ye ya kokoka, akomaki, mpo na bato nyonso oyo batosaka Ye, Mopesi lobiko ya seko ;


Bazalaki koganga epai ya bangomba mpe epai ya mabanga minene : « Bokweyela biso mpe bobomba biso mpo ete Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi amona biso te, mpe mpo ete kanda ya Mpate ekweyela biso te !


Bongo bana ya Isalaele balongolaki banzambe ya bapaya kati na bango mpe basalelaki Yawe. Mpe Yawe akokaki lisusu te kotala pasi na bango.


Jonatan alongwaki na mesa na kanda makasi mpe atikalaki kolia te na mokolo oyo ya mibale ya feti ya Sanza ya Sika, pamba te ayokaki pasi na motema na ndenge tata na ye afingaki Davidi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ