epai wapi ezalaki na moto moko akufa loboko. Bafarizeo batunaki Yesu : — Boni, mibeko epesa nzela ya kobikisa bato na mokolo ya Saba ? Batunaki Ye bongo, pamba te bazalaki koluka likambo mpo na kofunda Ye.
Atunaki bango : — Nini epesamela nzela ya kosala na mokolo ya Saba : kosala bolamu to kosala mabe, kobikisa moto to kotika ye kokufa ? Kasi babatelaki kimia.
Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, alobaki na moto oyo akufa loboko : — Telema mpe pusana na liboso ya bato nyonso ! Moto yango atelemaki mpe apusanaki na liboso ya bato nyonso.
Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.
Mpe lisusu, kozala na ngai kati na boloko epesi na bandeko mingi kati na Nkolo molende ya kotia elikya kati na Nkolo mpe ya koteya Liloba na Nzambe, na mpiko mpe na bozangi bobangi.
Lokola Klisto amonaki pasi kati na nzoto na Ye, bino mpe bosengeli kotambola na makanisi ya ndenge wana ; pamba te Ye oyo amonaki pasi kati na nzoto na Ye asilisaki nguya ya lisumu,