Nazali koyoka bato ebele koloba na se se se : « Botala ! Somo na bangambo nyonso ! Bofunda ye ! Tofunda ye ! » Baninga na ngai nyonso bazali kozela kokweya na ngai, bazali koloba : « Tango mosusu akokosama, tokokanga ye kaka mpe tokozongisela ye mabe ! »
Nzokande, Daniele amonisaki bokeseni kati na ye, bakalaka ya lokumu mpe bayangeli oyo mokonzi atiaki kati na bituka, mpo na mayele na ye oyo eleka ndelo. Boye, mokonzi akanisaki kotombola ye mpo ete akamba mokili na ye mobimba ya bokonzi.
epai wapi ezalaki na moto moko akufa loboko. Bafarizeo batunaki Yesu : — Boni, mibeko epesa nzela ya kobikisa bato na mokolo ya Saba ? Batunaki Ye bongo, pamba te bazalaki koluka likambo mpo na kofunda Ye.
Kobanda na tango wana, bakomaki kolandela Yesu, mpe batindaki banongi oyo bazalaki komilakisa lokola bato ya sembo, mpo na kokanga Ye na maloba na Ye mpe kokaba Ye na maboko ya basambisi mpe ya moyangeli.
Balobaki bongo mpo na kotiela Yesu motambo mpe koluka nzela ya kofunda Ye. Kasi Yesu agunzamaki ; mpe na nzela ya mosapi na Ye, abandaki kokoma na mabele.
Kati na Bafarizeo, bamoko balobaki : — Moto oyo awuti epai ya Nzambe te, mpo ete azali kotosa te mokolo ya Saba. Kasi bamosusu balobaki : — Ndenge nini moto ya masumu akoki kozwa bokonzi ya kosala bikamwa ya ndenge wana ? Bokabwani ekotaki kati na bango.