7 « Mpo na nini moto oyo azali koloba bongo ? Azali kotiola Nzambe ! Nani akoki kolimbisa masumu soki kaka Ye moko Nzambe te ? »
Nani akoki kobimisa bopeto kati na mbindo ? Moko te !
Kasi bolimbisi ezali epai na Yo, yango wana basengeli kotosa Yo.
Ezali Ngai, Ngai kaka nde nalimbisaka masumu na yo mpo na lokumu ya Ngai moko mpe nakokanisa lisusu masumu na yo te.
Kasi Yo Nkolo, Nzambe na biso, otonda na mawa mpe olimbisaka, atako biso, totombokelaki Yo.
Nzambe nini akokani na Yo, Yo oyo olimbisaka masumu ya bato mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo ? Okangelaka bato kanda mpo na libela te, kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.
Mokonzi ya Banganga-Nzambe apasolaki bilamba na ye mpe alobaki : — Afingi Nzambe ! Mpo na nini koluka lisusu batatoli ? Bino moko boyoki ndenge nini afingi Nzambe !
Mpo na yango, ndambo ya balakisi ya Mobeko bakomaki kolobaloba na se ya mitema : — Moto oyo azali kotiola Nzambe !
Bino moko boyoki ndenge nini afingi Nzambe. Bokanisi nini mpo na yango ? Boye, bango nyonso bakatelaki Yesu etumbu, batatolaki ete abongi na kufa.
Kasi ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bazalaki wana bakomaki kolobaloba na se ya mitema :
Mbala moko, kati na molimo na Ye, Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki na bango : — Mpo na nini mitema na bino ezali kokanisa bongo ?
Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bakomaki kokanisa : — Moto oyo azali komimona penza nani mpo ete abimisa maloba ya kotiola Nzambe ? Nani akoki kolimbisa masumu soki kaka Ye moko Nzambe te ?
Bato mosusu oyo babengamaki elongo na Ye bakomaki koloba, bango na bango : — Moto oyo azali penza nani, oyo akomi ata kolimbisa masumu ?
Bayuda bazongiselaki Ye : — Ezali te mpo na likamwisi moko boye ya malamu nde tolingi koboma yo, kasi ezali mpo ete ozali kofinga Nzambe. Lisusu, ezali mpo ete, yo oyo ozali moto, ozali koloba ete ozali Nzambe.
mpo na nini koloba na tina na Ngai oyo Tata abulisa mpe atinda kati na mokili : « Ozali kofinga, » mpo nalobaki : « Nazali Mwana na Nzambe ? »