Moko kati na bango alobaki epai ya moto oyo alataki bilamba ya lino mpe atelemaki likolo ya mayi ya ebale : — Makambo oyo ya kokamwa ekosala tango boni ?
Lokola Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, bayekoli bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye, na esika oyo bazalaki bango moko kaka : — Yebisa biso : makambo wana ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa koya na Yo mpe suka ya mokili ?
Bongo Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, oyo etalana na Tempelo. Petelo, Jake, Yoane mpe Andre batunaki Yesu, na esika oyo bazalaki bango moko kaka :