3 Bongo Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, oyo etalana na Tempelo. Petelo, Jake, Yoane mpe Andre batunaki Yesu, na esika oyo bazalaki bango moko kaka :
Bongo Yesu atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako. Bayekoli na Ye bayaki epai na Ye mpe batunaki Ye : — Pesa biso ndimbola ya lisese ya matiti mabe kati na elanga.
Lokola Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, bayekoli bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye, na esika oyo bazalaki bango moko kaka : — Yebisa biso : makambo wana ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa koya na Yo mpe suka ya mokili ?
Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane ; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi epai wapi bazalaki kaka bango moko. Yesu abongolamaki na miso na bango :