Na mokolo oyo okotanda basoda na yo na molongo mpo na bitumba, bato na yo bakotonda na mpiko, bilenge basoda na yo nyonso bakoya na lombangu epai na yo ndenge mamwe ebimaka na tongo.
alobaki na bango : — Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino. Tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona mwana ya ane bakanga na singa, oyo moto ata moko te asila kosalela ; bofungola yango mpe bomema yango awa.
Bongo ye akolakisa bino, na etaje ya suka, shambre moko ya monene, babongisa malamu mpe bakoki kosalela yango. Ezali kuna nde bokobongisa bilei ya Pasika mpo na biso.
Pamba te boyebi ndenge nini Yesu-Klisto, Nkolo na biso, atalisaki ngolu na Ye epai na biso : Ye oyo azalaki mozwi, amikomisaki mobola mpo na bolamu na bino, mpo ete bokoma bazwi na nzela ya bobola na Ye.