3 Yesu azongiselaki bango : — Moyize apesaki bino mobeko nini ?
Na mobeko mpe na lisakoli ! Soki bakoloba bongo te, bakomona tongo te.
Bafarizeo bapusanaki mpe bapesaki Ye motuna mpo na komeka Ye : — Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala ?
Balobaki na Yesu : — Moyize apesaki na mobali nzela ya koboma libala na mwasi na ye, kaka soki akomi mokanda ya koboma libala.
Molakisi moko ya Mobeko atelemaki mpe atunaki mpo na komeka Yesu : — Moteyi, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ?
Bokundolaka Makomi na bokebi, mpo ete bokanisaka ete bokozwa bomoi ya seko kati na yango ; nzokande, Makomi yango etatolaka na tina na Ngai,
Bino oyo bolingi kozala na se ya bokonzi ya Mobeko, boyebisa ngai nanu, bososolaka na bino te makambo oyo Mobeko elobaka ?