Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malako 10:2 - Mokanda na Bomoi

2 Bafarizeo bapusanaki mpe bapesaki Ye motuna mpo na komeka Ye : — Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malako 10:2
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Nayinaka likambo ya koboma libala ; ekokani na moto oyo elamba na ye ezwi makila tango abomi moto, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. Yango wana, bosala keba mpo na bomoi na bino mpe botikala sembo.


Bongo bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe bayebisaki Ye : — Boni, oyebi te ete maloba oyo olobi ebetisi Bafarizeo mabaku ?


Bafarizeo mpe Basaduseo bayaki epai na Yesu mpo na kotiela Ye motambo ; basengaki na Ye ete alakisa bango elembo moko kowuta na Likolo.


Bafarizeo bapusanaki pene na Ye mpo na komeka Ye ; bapesaki Ye motuna : — Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala mpo na likambo songolo ?


mpe moko kati na bango, molakisi ya Mobeko, alukaki kotiela Yesu motambo, atunaki Ye :


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bokangaka nzela mpo ete bato mosusu bakota te kati na Bokonzi ya Likolo ; bino moko, bozali kokota kuna te, kasi bozali lisusu kokanga nzela mpo ete bato oyo bazali na posa ya kokota bakota te. [


Kasi Bafarizeo bazalaki koloba : — Azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.


Yesu alongwaki na esika wana mpe akendeki na etuka ya Yuda, na ngambo mosusu ya Yordani. Ebele penza ya bato bayaki lisusu kosangana pene na ye ; bongo akomaki lisusu koteya bango kolanda momesano na Ye.


Yesu azongiselaki bango : — Moyize apesaki bino mobeko nini ?


Bafarizeo bayaki mpe bakomaki kotuna Yesu mituna ; mpo na komeka Ye, basengaki na Ye ete asala elembo moko kowuta na Likolo.


Yesu akebisaki bango : — Bofungola miso mpe bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Erode !


Bongo, Nkolo alobaki na ye : — Bino Bafarizeo, bosukolaka libanda ya bakopo mpe ya basani, kasi botondi na moyibi mpe na mabe.


Wana Bafarizeo bazalaki koyoka Yesu koloba makambo wana nyonso, bazalaki koseka Ye, pamba te bazalaki na lokoso ya mbongo.


Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bazalaki lingomba moko elongo na bango bakomaki koyimayima mpe balobaki na bayekoli ya Yesu : — Mpo na nini bozali kolia mpe komela mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?


Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bazalaki kolandela Yesu mpo na kotala soki akobikisa moto na mokolo ya Saba, mpo ete bazwa likambo ya kofunda Ye.


Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko baboyaki mokano ya Nzambe mpo na bango, pamba te baboyaki ete Yoane abatisa bango.


Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo babengisaki Likita-Monene mpe batunanaki : — Tosala nini ? Moto oyo azali kosala bikamwa mingi.


Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo basilaki kopesa mitindo ete moto nyonso oyo akoyeba esika oyo Yesu azali, ayebisa bango mpo ete bakanga ye.


Bafarizeo bayokaki makambo oyo bato bazalaki koloba na se se na tina na Yesu. Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo batindaki bakengeli ya Tempelo mpo na kokanga Yesu.


Boni, kati na bakonzi to kati na Bafarizeo, ezali ata na moko oyo andimi ye ?


Balobaki bongo mpo na kotiela Yesu motambo mpe koluka nzela ya kofunda Ye. Kasi Yesu agunzamaki ; mpe na nzela ya mosapi na Ye, abandaki kokoma na mabele.


Tosengeli mpe te komeka Klisto, ndenge bamosusu kati na bango basalaki ; mpe banyoka ebomaki bango mpo ete eswaki bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ