Pamba te nakosopa mayi na mokili ya kokawuka, mpe bibale, na mabele ya kokawuka ; nakosopa Molimo na Ngai na likolo ya bana na yo mpe mapamboli na Ngai na likolo ya bakitani na yo.
Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema. Kasi sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe kati na moto.
Tala makambo oyo azalaki koteya bato : « Sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kogumbama liboso na Ye mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye.
Yoane azongiselaki bango : — Ngai nazali kobatisa bino na mayi ; kasi ezali na Moto moko oyo azali koya, aleki ngai na nguya, mpe ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe na moto.
Ngai moko mpe nayebaki Ye te ; kasi Ye oyo atindaki ngai kobatisa na mayi alobaki na ngai : « Moto oyo okomona Molimo kokita mpe kowumela likolo na Ye, Ye nde akobatisa kati na Molimo Mosantu. »
Bandimi oyo bazalaki bakatama ngenga, oyo bayaki elongo na Petelo wuta na Jafa, bakamwaki mingi komona ete Nzambe asopi likabo ya Molimo Mosantu epai ya bato ya bikolo ya bapaya.
« Na mikolo ya suka, elobaki Nzambe, nakosopa Molimo na Ngai kati na bato nyonso. Bana na bino ya mibali mpe ya basi bakosakola ; bilenge na bino bakozwa bimoniseli, mibange na bino bakolota bandoto.
Solo, biso nyonso tobatisamaki kati na Molimo moko mpo na kosala nzoto moko : ezala Bayuda to Bagreki, ezala bawumbu to bansomi. Mpe epesamelaki biso nyonso komela Molimo wana se moko.