6 Yoane azalaki kolata elamba oyo basala na bapwale ya shamo mpe mokaba oyo basala na poso ya nyama, na loketo ; azalaki kolia mankoko mpe mafuta ya nzoyi.
Na mokolo wana, mosakoli moko na moko akozala na soni mpo na kosakola mpe koloba bimoniseli na ye ; akokosa lisusu bato te na kolataka bilamba ya basakoli, oyo basala na bapwale.
Bavandi nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bazalaki kokende epai na ye ; bazalaki kotubela masumu na bango, mpe ye, azalaki kobatisa bango na ebale Yordani.
Tala makambo oyo azalaki koteya bato : « Sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kogumbama liboso na Ye mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye.