Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 9:61 - Mokanda na Bomoi

61 Mosusu lisusu alobaki na Ye : — Nkolo, nakolanda Yo ; kasi pesa ngai nzela ya kozonga nanu mpo na kokende kopesa libota na ngai mbote ya suka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 9:61
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Elize atikaki bangombe na ye, akimaki mbangu sima na Eliya mpe alobaki : — Tika ete nakende nanu kopesa tata mpe mama na ngai beze mpo na kokabwana na bango, bongo nakolanda yo. Eliya azongisaki : — Zonga na yo, nasali yo nini ?


Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.


— Soki moto ayei epai na Ngai, kasi alingi Ngai te koleka tata na ye, mama na ye, mwasi na ye, bana na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, mpe ezala ata bomoi na ye moko, moto ya ndenge wana akoki te kozala moyekoli na Ngai.


Kasi motema na ngai etikalaki kozala na kimia te mpo ete namonaki kuna te ndeko na ngai, Tito. Boye, natikaki bango mpe nakendeki na Masedwane.


oyo atalisaki bolingo epai na Yo koleka, bolingo epai ya baboti na ye, bandeko na ye mpe bana na ye moko, mpo na kotosa maloba na Yo mpe kobatela boyokani na Yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ