Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 9:60 - Mokanda na Bomoi

60 Yesu alobaki na ye : — Tika bakufi bakunda bakufi na bango ; kasi yo, kende kosakola Bokonzi ya Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 9:60
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana Yesu azalaki kotambola kati na Galile mobimba, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Likolo, kobikisa bato na pasi mpe na bokono na bango nyonso.


Kasi Yesu alobaki na ye : — Landa Ngai ! Tika bakufi bakunda bakufi na bango.


pamba te mwana na ngai, oyo bozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! » Boye babandaki feti na esengo makasi.


Kasi tosengelaki kaka kosala feti mpe kosepela, pamba te ndeko na yo, oyo ozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! »


Koteya Sango Malamu ezali likambo oyo ngai nasengeli te komikumisa na yango, pamba te mosala yango epesamelaki ngai na makasi. Mawa na ngai soki nateyi te Sango malamu !


Bozalaki bakufi mpo na mabe mpe masumu na bino,


atako tozalaki bakufi mpo na masumu na biso, akomisaki biso bato ya bomoi elongo na Klisto. Bobikisami nde na ngolu…


Kasi mwasi akufisa mobali, oyo amipesaka na bisengo azali ya kokufa atako azali na bomoi.


teya Liloba, betela yango sete na tango ya malamu to te, zongisa na nzela, pamela mpe lendisa na nzela ya mateya na yo mpe na kokanga motema.


Kasi yo, zala na ekenge na makambo nyonso, yikela pasi mpiko, sala mosala ya mopanzi Sango Malamu, kokisa malamu lotomo na yo.


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Sarde : « Tala maloba ya Ye oyo azali na milimo sambo ya Nzambe mpe minzoto sambo : Nayebi misala na yo ; nayebi malamu ete okenda sango ete ozali na bomoi, nzokande ozali na yo ya kokufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ