Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 9:56 - Mokanda na Bomoi

56 Bongo Yesu elongo na bayekoli na Ye bakendeki na mboka mosusu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 9:56
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bosala keba ete botiola ata moko te kati na bana oyo, pamba te nazali koloba na bino ete ba-anjelu na bango kuna na Likolo bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na Ngai, oyo azali na Likolo. [


Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na kobikisa bato oyo babunga nzela.]


Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye ; kasi ayaki nde kosala mpo na bato, mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.


Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Botelemelaka te moto mabe ; kutu soki abeti yo mbata na litama ya ngambo ya loboko ya mobali, pesa ye mpe litama ya ngambo ya loboko ya mwasi.


Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa bato oyo babunga.


Kasi Yesu alobaki : — Boye lisusu te ! Yesu asimbaki litoyi ya mobali yango mpe abikisaki ye.


Yesu alobaki : — Tata, limbisa bango mpo ete bayebi te makambo oyo bazali kosala . Mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke.


Yesu abalukaki mpo na kotala bango malamu mpe apamelaki bango : [— Boni, boyebi molimo oyo ezali kotindika bino na makanisi ya boye ? Mwana na Moto ayaki te mpo na koboma bato, kasi mpo na kobikisa bango.]


Wana bazalaki kotambola na nzela, mobali moko alobaki na Yesu : — Nakolanda Yo na esika nyonso oyo okokende.


Moyibi ayaka kaka mpo na koyiba, koboma mpe kobebisa ; kasi Ngai, nayei mpo ete bameme ezwa bomoi mpe ezwa yango na bofuluki penza.


Soki moto ayoki maloba na Ngai, kasi aboyi kotia yango na misala, Ngai, nakosambisa ye te ; pamba te nayaki te mpo na kosambisa mokili, kasi mpo na kobikisa yango.


Nzambe atindaki Mwana na Ye kati na mokili mpo ete akatela yango etumbu te, kasi mpo ete abikisa yango.


Kotika te ete mabe elonga na yo, kasi lukaka nde kolonga mabe na nzela ya kosala bolamu.


Tala liloba ya solo penza, liloba oyo ekoki na kondimama mpe koyambama na mobimba na yango : Yesu-Klisto ayaki kati na mokili mpo na kobikisa bato ya masumu ; mpe kati na bato yango ya masumu, ngai nde naleki na masumu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ