Tango Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Kapernawumi, bafutisi mpako ya Ndako ya Nzambe bayaki epai ya Petelo mpe batunaki : — Boni, moteyi na bino afutaka mpako ya Ndako ya Nzambe te ?
Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo apesi bino kopo ya mayi na Kombo na Ngai, mpo ete bozali bato ya Klisto, akotikala kobungisa te lifuti na ye.
Yango wana, nazali koloba na bino ete moto moko te, wana akambami na Molimo ya Nzambe, akoki koloba : « Tika ete Yesu alakelama mabe ! » Mpe moto moko te akoki koloba : « Yesu azali Nkolo, » soki akambami na Molimo Mosantu te.