Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 9:5 - Mokanda na Bomoi

5 Soki bato baboyi koyamba bino, botika engumba na bango mpe bopupola putulu ya makolo na bino lokola litatoli mpo na kotelemela bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 9:5
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe napupolaki songe ya nzambala na ngai na koloba : — Tika ete Nzambe apupola ndenge ngai nazali kosala mpe abengana, mosika ya ndako na ye mpe ya biloko na ye, moto nyonso oyo akokokisa te elaka na ye ; mpe tika ete bapupola ye ndenge wana mpe atikala maboko pamba ! Lisanga mobimba ezongisaki : — Amen ! Bakumisaki Yawe mpe bakokisaki makambo oyo balakaki.


Likolo na Ngai, bakomema bino na makasi liboso ya bayangeli mpe ya bakonzi. Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai liboso na bango mpe liboso ya bapagano.


Mpe soki na esika songolo, baboyi koyamba mpe koyoka bino, bolongwa na esika yango, bopupola putulu ya makolo na bino ; yango ekozala litatoli oyo ekofunda bango. »


— Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko. Mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi Ngai te, kasi ayambi nde Motindi na Ngai.


Moto oyo atosi bino atosi nde Ngai, moto oyo aboyi bino aboyi nde Ngai, nzokande moto oyo aboyi Ngai aboyi nde Motindi na Ngai.


Yesu apesaki ye mitindo : — Koloba na moto moko te makambo oyo ekomeli yo, kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe, mpo na kopetolama na yo, pesa likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko, mpo ete ezala litatoli mpo na bango.


Na ndako nyonso oyo bokokota, bovanda kuna kino bokolongwa na engumba.


mpe alobaki na bango : — Moto nyonso oyo ayambi mwana oyo ya moke na Kombo na Ngai, ayambi nde Ngai moko ; mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi nde Motindi na Ngai. Pamba te, ezali ye oyo aleki moke kati na bino nyonso nde aleki monene.


Na bongo, Polo mpe Barnabasi bapupolaki putulu ya makolo na bango mpo na bato wana, mpe bakendeki na Ikoniomi.


Kasi tango Bayuda bakomaki kotelemela Polo mpe kofinga ye, apupolaki bilamba na ye mpe alobaki : — Tika ete makila na bino etangama likolo ya mito na bino moko ! Ngai nazali lisusu na ngambo te. Kobanda lelo, nakokende na ngai epai ya bato ya bikolo ya bapaya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ