49 Yoane alobaki : — Moteyi, tomonaki moto moko kobengana milimo mabe na Kombo na Yo, mpe tomekaki kopekisa ye, pamba te azali moto ya lisanga na biso te.
Alobaki : — Topekisaki bino ete bomeka lisusu te koteya na Kombo wana. Kasi tala sik’oyo ndenge botondisi Yelusalemi na mateya na bino mpe bolingi komemisa biso ngambo ya makila ya moto wana.
bazali kokanga biso nzela mpo ete toteya Bapagano te, noki te bakobika. Na ndenge wana, bazali kaka kofulukisa masumu na bango mpe, suka na suka, kanda ya Nzambe ekokweyela bango.