Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 9:47 - Mokanda na Bomoi

47 Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, akamataki mwana moke, atiaki ye pembeni na Ye,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 9:47
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

oyebi tango navandaka mpe tango natelemaka. Liboso na ngai kokanisa, ososolaka mabongisi na ngai ;


Oh Nzambe, kundola mpe yeba mozindo ya motema na ngai, meka ngai mpe yeba makambo oyo ezali kotungisa ngai !


« Ngai Yawe, nayebi motema mpe nasosolaka malamu makanisi na yango, mpo na kofuta moto na moto kolanda etamboli mpe misala na ye. »


Wana Yesu asosolaki ete basali mabongisi ya koboma Ye, alongwaki na esika yango. Bato ebele balandaki Ye, mpe abikisaki babeli nyonso.


Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, atunaki bango : — Mpo na nini bozali na makanisi mabe kati na mitema na bino ?


Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, atunaki bango : — Mpo na nini bozali kokanisa biloko oyo kati na mitema na bino ?


Tososoli sik’oyo ete oyebi nyonso, mpe ete ozali na posa te ete bapesa Yo mituna. Mpo na yango, tondimi solo ete owutaki epai ya Nzambe.


Azalaki ata na posa te ete bayebisa Ye makambo na tina na bato, pamba te ayebaki makambo nyonso oyo ezalaki kati na mitema na bango.


Bongo Yesu atunaki ye mpo na mbala ya misato : — Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai ? Petelo ayokaki mawa mingi kati na motema mpo ete ekomaki mbala ya misato oyo Yesu atunaki ye : « Olingaka Ngai ? » Bongo azongiselaki Yesu : — Nkolo, oyebi makambo nyonso ; oyebi malamu ete nalingaka Yo ! Yesu alobaki na ye : — Batela bameme na Ngai.


Bandeko na ngai, botika kokanisa lokola bana mike ; bozala te lokola bana mike na lolenge na bino ya kososola makambo. Mpo na oyo etali mabe, bozala lokola bana mike ; kasi mpo na oyo etali lolenge ya kososola makambo, bozala mikolo.


Kati na bikelamu nyonso, moko te ezali ya kobombama na miso ya Nzambe : nyonso ezali polele, mpe ezali ya kobombama te na miso ya Ye oyo akosambisa biso.


Nakoboma bana ya Jezabeli ; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ