Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 9:43 - Mokanda na Bomoi

43 Mpe bato nyonso bakamwaki mingi monene ya Nzambe. Wana bato nyonso bazalaki kokamwa makambo nyonso oyo Yesu asalaki, alobaki na bayekoli na Ye :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 9:43
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nasanzolaka Yo, pamba te osala ngai kitoko makasi. Misala na Yo ezali ya kokamwa ; ngai, nayebi yango malamu.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Boni, soki, na tango wana, ekomonana lokola likambo ya kokamwa na miso ya batikali kati na bato oyo, Ngai mpe namona yango likambo ya kokamwa ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Mokolo moko, bayekoli basanganaki bango nyonso kati na Galile ; Yesu alobaki na bango : — Bakokaba Mwana na Moto na maboko ya bato,


Bongo amataki na bwato epai bayekoli bazalaki, mpe mopepe ekitaki. Bakamwaki mingi penza,


Mpe mbala moko, akomaki komona, mpe alandaki Yesu, na kokumisa Nzambe. Tango bato nyonso bamonaki bongo, bango mpe bakumisaki Nzambe.


Bato nyonso bakamwaki mpe bakomaki kotunana : — Oyo ezali lisusu maloba nini ! Azali kopesa mitindo epai ya milimo mabe, na bokonzi mpe na nguya nyonso, mpe yango ezali kobima !


Awa bato nyonso bakamwaki, bakomaki kokumisa Nzambe ; awa mpe somo ekangaki bango, bakomaki koloba : « Lelo penza, tomoni makambo ya kokamwa ! »


Somo monene ekangaki Simona mpe baninga na ye nyonso, likolo ya motango ya bambisi oyo bazwaki.


Yesu atunaki bayekoli na Ye : — Wapi kondima na bino ? Kasi bango, batondaki na somo mpe bakamwaki, bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani ? Azali kopesa mitindo ata na mipepe mpe na mayi, mpe yango ezali kotosa ye ! »


Wana mwana azalaki kopusana, molimo mabe ebwakaki ye na mabele mpe ebandaki koningisa ye makasi. Kasi Yesu apesaki mitindo na molimo mabe yango ete ebima kati na mwana, abikisaki mwana na pasi na ye mpe azongisaki ye na maboko ya tata na ye.


Solo, tango toyebisaki bino makambo oyo etali koya ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, kati na nguya na yango nyonso, tolandaki te basambole oyo bato basalaka na mayele na bango, kasi na miso na biso moko, tomonaki Ye kati na kongenga nyonso ya nkembo na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ