4 Na ndako nyonso oyo bokokota, bovanda kuna kino bokolongwa na engumba.
Na engumba to na mboka nyonso oyo bokokota, boluka moto oyo abongi mpo na koyamba bino mpe bovanda na ndako na ye kino tango bokolongwa.
Na ndako nyonso oyo bakoyamba bino, bovanda kuna kino tango bokolongwa.
Alobaki na bango : — Bomema eloko moko te mpo na mobembo, ezala lingenda, sakosi, eloko ya kolia to mbongo ; bozala na banzambala mibale te na moto.
Soki bato baboyi koyamba bino, botika engumba na bango mpe bopupola putulu ya makolo na bino lokola litatoli mpo na kotelemela bango.
Tango ye elongo na bato ya libota na ye bazwaki libatisi, abengisaki biso na ndako na ye ; alobaki : — Soki bomoni ete ngai nakomi penza mondimi ya Nkolo, boya kovanda na ndako na ngai. Boye, asalaki nyonso mpo ete tondima kokende na ndako na ye.