Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 9:38 - Mokanda na Bomoi

38 Mobali moko kati na ebele yango ya bato agangaki : — Moteyi, nazali kosenga na Yo ete otala mwana na ngai ya mobali, pamba te nazali kaka na mwana moko !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 9:38
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tozongiselaki nkolo na ngai : « Tozali na tata oyo akomi mobange mpe ndeko mobali ya leki oyo babotelaki tata na biso na kimobange. Ndeko na ye ya mobali akufa mpe atikala kaka ye moko mwana mobali na libumu ya mama na ye, mpe tata na ye alingaka ye mingi. »


Nakosopa Molimo ya ngolu mpe ya mabondeli epai ya libota ya Davidi mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi. Bakosembola miso na bango epai na Ngai oyo batobolaki. Bakosalela ye matanga ndenge kaka basalaka matanga ya mwana oyo abotama kaka ye moko ; bakolela ye makasi ndenge balelaka mwana mobali ya liboso oyo asili kokufa.


Mwasi moko ya mboka Kanana azalaki kovanda na etuka yango, ayaki epai ya Yesu mpe akomaki koganga : — Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! Mwana na ngai ya mwasi azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezali mpe konyokola ye makasi.


Wana akomaki pene ya ekuke ya engumba, akutanaki na bato bazali kokende kokunda mwana mobali moko oyo awutaki kokufa : azalaki mwana kaka moko ya mwasi moko akufisa mobali. Mpe bato mingi ya engumba yango bazalaki elongo na mwasi yango.


Mokolo oyo elandaki, tango bakitaki na ngomba, ebele ya bato bayaki kokutana na Yesu.


Molimo moko etungisaka ye : soki ekangi ye, mwana akoganga na mbala moko, ekoningisa ye makasi kino kokweyisa ye na mabele ; mwana akokangama mpe akobimisa fulufulu na monoko. Etikaka ye na pasi sima na kozokisa ye.


Tango ayokaki ete Yesu akomi na Galile longwa na Yuda, akendeki kokutana na Ye mpe asengaki na Ye ete akende kobikisa mwana na ye ya mobali oyo akomi pene ya kokufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ