Mpe alobaki : — Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi ; bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basengeli koboya Ye. Basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.
Mpe biso nyonso oyo bilongi na biso ezipama te, biso oyo tomonisaka nkembo ya Nkolo, tozwaka elilingi na Ye kati na nkembo oyo kongenga na yango ebakisamaka se kobakisama. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo oyo azali Molimo.
Ye nde akobongola nzoto na biso ya putulu mpo na kokomisa yango nzoto ya nkembo, na nzela ya nguya na Ye ya kotia biloko nyonso na se ya bokonzi na Ye.
Mpo na kondima, wana Jozefi akomaki na suka ya bomoi na ye, asakolaki kobima ya bana ya Isalaele longwa na Ejipito mpe apesaki mitindo na tina na mikuwa na ye.
Kasi sima na bino komona pasi mpo na mwa tango moke, Nzambe ya ngolu nyonso, oyo abenga bino na nkembo na Ye ya seko kati na Yesu-Klisto, akokomisa bino bato ya kokoka, akolendisa bino, akopesa bino makasi mpe akotelemisa bino ngwi.
Nazongiselaki ye : — Nkolo na ngai, yo nde oyebi. Bongo alobaki na ngai : — Ezali ba-oyo bawuti na minyoko makasi. Basukolaki banzambala na bango mpe bakomisaki yango pembe kati na makila ya Mpate.