Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 9:22 - Mokanda na Bomoi

22 Mpe alobaki : — Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi ; bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basengeli koboya Ye. Basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 9:22
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi. »


Sima na baposo tuku motoba na mibale, bakoboma Ye oyo azwaki epakolami, atako asalaki na ye mabe ata moko te. Bato ya mokambi oyo azali koya bakobebisa engumba mpe Esika ya bule, mpe suka na yango ekoya lokola mpela ; bongo kino suka ya bitumba ekoma, kobebisama ekozala mpo ete mokano na yango esili kozwama.


Oh mopanga, telema ! Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai ! Tika ete oboma moninga na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Beta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. Bongo nakoboma ata bibwele ya mike.


Kasi Ngai, nazali koloba na bino ete Eliya asilaki koya ; kasi na esika ya koyeba ye, basalaki ye ndenge balingaki. Ezali mpe ndenge wana nde bakonyokola Mwana na Moto.


Mokolo moko, bayekoli basanganaki bango nyonso kati na Galile ; Yesu alobaki na bango : — Bakokaba Mwana na Moto na maboko ya bato,


mpo na koloba na ye : — Mokonzi, makanisi ezongeli biso na tina na mokosi wana ! Tango azalaki na bomoi, alobaki : « Sima na mikolo misato, nakosekwa. »


Yesu akomaki koteya bango : — Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi ; bakambi, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basengeli koboya Ye, basengeli koboma Ye, mpe, sima na mikolo misato, asengeli kosekwa.


pamba te azalaki koteya bayekoli na Ye mpe koloba na bango : — Bakokaba Mwana na Moto na maboko ya bato, bakoboma Ye, mpe, mikolo misato sima na kufa na Ye, akosekwa.


Kasi liboso ete mokolo yango ekoma, asengeli komona pasi mingi, mpe bato ya ekeke oyo basengeli koboya Ye.


Boni, Klisto asengelaki te komona pasi ndenge wana mpo ete akota kati na nkembo na Ye ?


Bongo alobaki na bango : — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »


« Esengeli ete bakaba Mwana na Moto na maboko ya bato ya masumu ; esengeli ete babaka Ye na ekulusu ; mpe esengeli ete asekwa sima na mikolo misato. »


— Boyoka na bokebi makambo oyo nazali koyebisa bino : Bazali kokaba Mwana na Moto na maboko ya bato.


bakundaki Ye, mpe asekwaki na mokolo ya misato, ndenge Makomi elobaki yango liboso.


Basalaki nyonso mpo na koluka koyeba tango nini mpe ndenge nini makambo oyo Molimo ya Klisto alobaki ekosalema. Molimo ya Klisto azalaki kati na bango, wana azalaki komiyebisela bango ete Klisto asengelaki komona pasi liboso ete azwa nkembo oyo ezalaki kozela Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ