Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 9:20 - Mokanda na Bomoi

20 Yesu atunaki bango lisusu : — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani ? Petelo azongisaki : — Ozali Masiya oyo Nzambe atindi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 9:20
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

— Bozali kokanisa nini na tina na Klisto ? Azali Mwana ya nani ? Bazongiselaki Ye : — Azali mwana ya Davidi !


Kasi Yesu abatelaki kimia. Boye mokonzi ya Banganga-Nzambe alobaki na Ye : — Na Kombo ya Nzambe na bomoi, napesi yo mitindo : « Yebisa biso soki ozali Klisto, Mwana na Nzambe. »


Soki bopesaka mbote kaka na bandeko mibali na bino, likambo nini ya kokamwa oyo bosalaka ? Boni, bapagano basalaka mpe bongo te ?


Kasi Yesu abatelaki kimia mpe apesaki ata eyano moko te. Mokonzi ya Banganga-Nzambe atunaki Ye lisusu : — Ozali Klisto, Mwana ya Ye oyo apambolama ?


Yesu atunaki bango : — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani ? Petelo azongiselaki Ye : — Ozali Masiya.


Balobaki : — Soki ozali Klisto, yebisa biso. Yesu azongisaki : — Ata nayebisi bino, bokondima na bino kaka Ngai te ;


Bazongisaki : — Bamoko bazali koloba ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, moko kati na basakoli ya kala oyo asili kosekwa.


Akendeki kokutana na Simona, ndeko na ye, mpe alobaki na ye : « Tomoni Masiya  ! »


Natanaele alobaki : — Moteyi, ozali solo Mwana na Nzambe ; ozali penza Mokonzi ya Isalaele.


Marte azongisaki : — Iyo, Nkolo ! Nandimi ete ozali Klisto, Mwana na Nzambe, oyo asengelaki koya na mokili.


Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe ; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.


— Boya kotala moto oyo ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. Akoki kozala Klisto te ?


Bongo balobaki na mwasi wana : — Tondimi kaka te mpo na makambo oyo olobaki, pamba te biso moko toyoki sik’oyo mpe toyebi ete azali penza Mobikisi ya mokili.


bamosusu : « Azali Klisto, » kasi bamosusu lisusu : « Boni, Klisto akoki kobimela na Galile ?


Azalaki kotalisa mpe kolakisa bango polele ete Klisto asengelaki komona pasi mpe kosekwa kati na bakufi. Azalaki koloba na bango : — Yesu oyo nazali koteya bino, Ye nde azali Klisto.


Wana bazalaki kokoba mobembo na bango, bakomaki na esika moko oyo ezalaki na mayi, mpe soda oyo baboma mokongo alobaki : — Tala mayi, yango oyo. Eloko nini ekoki kopekisa ngai kozwa libatisi ? [


Nzokande, kondima ya Saulo ezalaki se kokoba kolendisama mpe azalaki kondimisa Bayuda oyo bavandaka na Damasi ete Yesu azali Klisto.


Moto nyonso oyo andimaka ete Yesu azali Klisto azali mwana na Nzambe, mpe moto nyonso oyo alingaka Tata alingaka mpe Mwana na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ