Ezali bato oyo zomi na mibale nde Yesu atindaki, sima na Ye kopesa bango mitindo oyo : — Bokende te epai ya bato ya bikolo mosusu, mpe bokota te na bingumba ya bato ya Samari.
Soki moto ayoki Liloba na tina na Bokonzi ya Likolo mpe asosoli yango te, Satana ayaka kolongola oyo elonamaka kati na motema ya moto yango. Yango nde ndimbola ya nkona oyo ekweyi pembeni ya nzela.
Sima na yango, Nkolo aponaki bayekoli tuku sambo na mibale mpe atindaki bango, mibale-mibale liboso na Ye, na bingumba nyonso mpe na bisika nyonso oyo Ye moko asengelaki kokende.
« Ezala putulu ya engumba na bino, topupoli yango wuta na makolo na biso, mpo na kokebisa bino. Nzokande, boyeba malamu ete Bokonzi ya Nzambe ekomi pene. »
Tango ya Mibeko mpe ya Basakoli ewumelaki kino na Yoane Mobatisi ; kasi wuta Yoane Mobatisi ayaki, Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali koteyama, mpe moto nyonso azali kobunda na kondima mpo na kokota kuna.
Kasi tango ebele ya bato bayokaki bongo, balandaki Ye. Yesu ayambaki bango, ateyaki bango na tina na Bokonzi ya Nzambe, abikisaki mpe bato oyo bazalaki na posa ya lobiko na bokono ya nzoto.