Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 9:19 - Mokanda na Bomoi

19 Bazongisaki : — Bamoko bazali koloba ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, moko kati na basakoli ya kala oyo asili kosekwa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 9:19
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki na basali na ye : — Ezali penza Yoane Mobatisi ! Asekwi kati na bakufi ; yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa.


Na tango wana, Yoane Mobatisi ayaki mpe akomaki koteya kati na esobe ya Yuda :


Mokonzi Erode ayokaki sango na tina na Yesu, pamba te Kombo na Ye eyebanaki makasi. Bazalaki koloba boye na tina na Yesu : « Yoane Mobatisi asekwi kati na bakufi ! Yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa ! »


Bato mosusu bazalaki koloba : « Ezali Eliya ! » Bamosusu : « Azali mosakoli, lokola moko kati na basakoli ya kala ! »


Mokolo moko, wana Yesu azalaki kosambela na pembeni, mpe bayekoli na Ye bazalaki elongo na Ye, atunaki bango : — Bato bazali koloba nini na tina na Ngai ? Mpo na bango, Ngai nazali nani ?


Yesu atunaki bango lisusu : — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani ? Petelo azongisaki : — Ozali Masiya oyo Nzambe atindi.


Batunaki ye lisusu : — Bongo ozali nani ? Ozali Eliya ? Azongisaki : — Nazali Eliya te. Batunaki ye lisusu : — Ozali mosakoli ? Azongisaki : — Te !


Batunaki ye lisusu : — Soki ozali Masiya te, Eliya te to mpe mosakoli te, bongo mpo na nini ozali kobatisa ?


Kati na bato oyo bayokaki maloba na Ye, bamoko bazalaki koloba : « Moto oyo azali penza Mosakoli, »


Batunaki lisusu mokufi miso : — Bongo yo, olobi nini na tina na ye, pamba te ezali miso na yo nde abikisi ? Azongiselaki bango : — Azali mosakoli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ