14 Ezalaki wana na mibali pene nkoto mitano. Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Bovandisa bango na masanga ; tika ete lisanga moko na moko ezala na bato tuku mitano.
Boye, alobaki na ebele ya bato yango ete bavanda na mabele. Bongo azwaki mapa yango sambo, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato. Mpe bayekoli basalaki bongo.
Kasi Yesu alobaki na bango : — Bopesa bango bino moko biloko ya kolia. Bazongisaki : — Tozali kaka na mapa mitano mpe bambisi mibale ; loba nde tokende kosomba bilei mpo na ebele ya bato oyo nyonso.