13 Kasi Yesu alobaki na bango : — Bopesa bango bino moko biloko ya kolia. Bazongisaki : — Tozali kaka na mapa mitano mpe bambisi mibale ; loba nde tokende kosomba bilei mpo na ebele ya bato oyo nyonso.
Awa ekomaki pokwa, bantoma zomi na mibale bapusanaki pene ya Yesu mpe balobaki na Ye : — Zongisa bato oyo mpo ete bakende komilukela bilei mpe bisika ya kolala, kati na bamboka mpe bilanga ya zingazinga, pamba te tozali awa kati na esika ebombama.
Ezalaki wana na mibali pene nkoto mitano. Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Bovandisa bango na masanga ; tika ete lisanga moko na moko ezala na bato tuku mitano.