Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 8:7 - Mokanda na Bomoi

7 Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube ; banzube ekolaki nzela moko na yango mpe efinaki-finaki mito na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 8:7
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mabele ekobotela yo nzube mpe nzete ya sende. Okolia matiti ya bilanga.


Tala liloba oyo Yawe alobi epai ya bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi : « Bokata bilanga ya sika, mpe botika kolona kati na banzube.


Nkona oyo ekweyi kati na banzube ezali moto oyo ayoki Liloba, kasi baposa mabe ya mokili mpe lokoso ya bomengo efini-fini Liloba kati na ye. Boye akotikala mpe kobota bambuma te.


Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube, banzube ekolaki mpe efinaki-finaki mwa banzete na yango ;


Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube ; banzube ekolaki mpe efinaki-finaki yango. Boye, ebotaki bambuma te.


Bosala keba ete mitema na bino ekoma kilo te likolo ya lokoso ya kolia, likolo ya kolangwa masanga mpe likolo ya mitungisi ya bomoi, noki te mokolo yango ekokanga bino na mbalakata,


Nkona oyo ekweyaki kati na banzube ezali bato oyo, sima na koyoka Liloba, bamitikaka ete, na etamboli na bango, mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo, bomengo mpe bisengo ya mokili efinafina bango, mpe ete babota te bambuma.


Ndambo mosusu ekweyaki na mabele etonda na mabanga ; tango kaka ebandaki kobimisa mito, mito ekawukaki, pamba te ezalaki na mayi te.


Kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu, ebimisaki mito oyo ekolaki mpe ekomaki banzete : nkona moko na moko ebotaki bambuma nkama moko. Tango Yesu asilisaki koloba bongo, agangaki : — Tika ete moto nyonso oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ