Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 8:53 - Mokanda na Bomoi

53 Bato basekaki Yesu, wana bayebaki ete asilaki kokufa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 8:53
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakomi eloko ya kotiola na miso ya baninga na ngai, ngai oyo nazali kobelela Nzambe mpo ete ayanola ngai ; moto ya sembo, moto ya alima, ye nde akomi eloko ya kotiola !


Solo, batioli bazingeli ngai, miso na ngai ezali komona kotiola na bango.


Nazali lisusu moto te, kasi mutsopi ; bato nyonso bazali kofinga mpe kotiola ngai.


Bato batiolaki mpe basundolaki ye, ye moto na pasi, amesana konyokwama. Lokola moto oyo babwakeli soyi na elongi, atiolamaki, mpe tondimaki ye te.


Alobaki na bango : — Bobima ! Mwana akufi te ; alali nde pongi. Kasi bato bakomaki kotiola Ye.


Wana Bafarizeo bazalaki koyoka Yesu koloba makambo wana nyonso, bazalaki koseka Ye, pamba te bazalaki na lokoso ya mbongo.


Bato nyonso bazalaki kolela mpe koyoka mawa mpo na mwana yango. Kasi Yesu alobaki : — Bokata kolela ; akufi te, azali nde ya kolala !


Kasi Yesu asimbaki ye na loboko mpe alobaki : — Mwana na Ngai, lamuka !


Yesu alobaki na bango : — Botindika libanga. Kasi Marte, ndeko ya mowei, alobaki na Yesu : — Nkolo, azali kolumba solo ! Wuta bakundaki ye, esali mikolo minei.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ