51 Tango Yesu akomaki na ndako ya Jairisi, atikaki moto moko te kokota elongo na Ye, longola kaka Petelo, Yoane, Jake, tata mpe mama ya mwana.
Elize akotaki, amikangelaki na shambre elongo na mwana mobali, mpe asambelaki Yawe.
akotombola mongongo te, akoganga te, akobelela na mongongo makasi te na babalabala ;
Wana amemaki Petelo, Jake mpe Yoane, akomaki mawa-mawa mpe komitungisa ;
Simona oyo Yesu apesaki kombo « Petelo ; » Andre, ndeko na ye ; Jake, Yoane, Filipo, Bartelemi ;
Lokola Yesu ayokaki ye koloba bongo, alobaki na Jairisi : — Kobanga te ! Ndima kaka, mpe akobika na bokono na ye.
Bato nyonso bazalaki kolela mpe koyoka mawa mpo na mwana yango. Kasi Yesu alobaki : — Bokata kolela ; akufi te, azali nde ya kolala !
Mikolo pene mwambe sima na Yesu koloba bongo, azwaki elongo na Ye, Petelo, Yoane mpe Jake, mpe amataki na ngomba mpo na kokende kosambela.
Petelo abimisaki bato nyonso ; bongo afukamaki mpe asambelaki. Wana azalaki kotala epai ebembe ya mama Dorkasi ezalaki, alobaki : — Tabita, telema ! Tabita afungolaki miso ; mpe wana amonaki Petelo, avandaki.