Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 8:50 - Mokanda na Bomoi

50 Lokola Yesu ayokaki ye koloba bongo, alobaki na Jairisi : — Kobanga te ! Ndima kaka, mpe akobika na bokono na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 8:50
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali na moto kati na bino oyo atosaka Yawe mpe ayokaka mongongo ya Mowumbu na Ye, bongo atambola kati na molili mpe atikala komona pole te ? Tika ete atia elikya na ye kati na Kombo na Yawe mpe atalela Nzambe na ye.


Atako Yesu ayokaki maloba yango, kasi alobaki kaka na mokambi ya ndako ya mayangani : — Kobanga te, zala kaka na kondima !


Yesu alobaki na ye : — Olobi nini : « Soki okoki ! » Nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima.


Kasi Yesu alobaki na ye : — Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia.


Tango Yesu akomaki na ndako ya Jairisi, atikaki moto moko te kokota elongo na Ye, longola kaka Petelo, Yoane, Jake, tata mpe mama ya mwana.


Yesu alobaki na ye : — Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto nyonso oyo andimi Ngai akozala na bomoi, atako akufi.


Yesu alobaki na ye : — Nalobaki na yo te ete soki ondimi, okomona nkembo ya Nzambe ?


kolanda ndenge ekomama : « Nakomisaki yo tata ya bikolo ebele. » Azali tata na biso na miso ya Nzambe oyo ye andimaki, Nzambe oyo apesaka bomoi epai ya bakufi mpe azalisaka biloko oyo etikala kozala te.


Nzokande, na esika ete atia tembe na elaka ya Nzambe mpe aboya kondima, kasi kondima na ye epesaki ye lisusu makasi koleka mpe azalaki kopesa Nzambe nkembo,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ