45 Yesu atunaki : — Nani asimbi Ngai ? Lokola moto ata moko te andimaki, Petelo alobaki na Yesu : — Moteyi, ebele ya bato bazali kofinana-finana mpe kotutana-tutana na Yo.
Kasi Yesu alobaki na bango : — Bopesa bango bino moko biloko ya kolia. Bazongisaki : — Tozali kaka na mapa mitano mpe bambisi mibale ; loba nde tokende kosomba bilei mpo na ebele ya bato oyo nyonso.