Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 8:44 - Mokanda na Bomoi

44 Adusolaki kino ayaki kotelema na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye ; mpe mbala moko, makila na ye etikaki kotanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 8:44
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki : « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito ; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »


Yesu ayokelaki bango mawa mpe asimbaki miso na bango ; mpe, mbala moko, bakomaki komona mpe balandaki Ye.


Yesu asembolaki loboko, asimbaki ye mpe alobaki : — Nalingi ete ezala bongo, koma peto. Mbala moko, apetolamaki na maba na ye ;


Na tango yango kaka, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale. Mwasi yango ayaki na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye,


Na bisika nyonso oyo Yesu azalaki kokende, na bamboka, na bingumba to na bilanga, bazalaki komema babeli na bisika oyo bato ebele bakutanaka, mpe bazalaki kosenga na Yesu ete apesa babeli nzela ya kosimba ata singa ya songe ya elamba na Ye. Mpe bato nyonso oyo bazalaki kolonga kosimba yango bazalaki kobika na bokono na bango.


Mpe Yesu atielaki ye maboko. Mbala moko, mwasi yango amisembolaki mpe akomaki kokumisa Nzambe.


atelemaki na sima ya Yesu, na makolo na Ye ; azalaki kolela mpe, na mpinzoli na ye, akomaki kopolisa makolo ya Yesu. Bongo apangusaki makolo yango na nzela ya suki na ye, apesaki yango beze mpe asopelaki yango malasi.


Nzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale ; mpe asilisaki bozwi na ye nyonso epai ya minganga, kasi moko te alongaki kobikisa ye na bokono yango.


Yesu atunaki : — Nani asimbi Ngai ? Lokola moto ata moko te andimaki, Petelo alobaki na Yesu : — Moteyi, ebele ya bato bazali kofinana-finana mpe kotutana-tutana na Yo.


Kasi moto oyo abikaki ayebaki te soki moto oyo abikisaki ye azali nani, pamba te Yesu alimwaki kati na ebele ya bato oyo bazalaki wana.


Boye bato bakomaki kokamata miswale mpe bilamba oyo etuti nzoto ya Polo, mpo na kotia yango na banzoto ya babeli, bongo bokono ya bato yango ezalaki kosila, mpe milimo mabe ezalaki kobima kati na bango.


Bongo, bazalaki komema babeli na babalabala, kolalisa bango na bambeto mpe na bitoko mpo ete tango Petelo akoleka, elilingi na ye ekoka kozipa bamoko kati na bango.


Okotia basinga na basonge minei ya elamba oyo okolata.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ