Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 8:42 - Mokanda na Bomoi

42 pamba te mwana na ye kaka moko ya mwasi, ya mibu pene zomi na mibale ya mbotama, akomaki pene ya kokufa. Wana Yesu azalaki kokende, ebele ya bato bazalaki kotutana-tutana na Ye na bangambo nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 8:42
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kobanda na tongo kino na pokwa, bakataka-kataka bango na biteni ; bakufaka mpo na libela, mpe moto ata moko te alandelaka likambo na bango ;


Pamba te, nani ayebi likambo oyo ezali malamu mpo na bomoi ya moto, na mikolo na ye nyonso ya bomoi ya pamba oyo azali kolekisa lokola elili ? Nani akoki koyebisa ye makambo oyo ekoya sima na ye, na se ya moyi ?


« Mwana na moto, nakolongola, na nzela ya kufa ya pwasa, mwasi oyo asepelisaka motema na yo. Kasi komitungisa te, kolela te mpe kotangisa mpinzoli te.


Bongo yo, mwana na moto ; na mikolo ekoya, nakobotola bandako na bango oyo batonga makasi mpe batielaka motema, oyo esalaka esengo mpe lokumu na bango, oyo esepelisaka miso na bango mpe esalaka esengo ya mitema na bango ; nakobotola lisusu bana na bango ya mibali mpe ya basi.


Nakosopa Molimo ya ngolu mpe ya mabondeli epai ya libota ya Davidi mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi. Bakosembola miso na bango epai na Ngai oyo batobolaki. Bakosalela ye matanga ndenge kaka basalaka matanga ya mwana oyo abotama kaka ye moko ; bakolela ye makasi ndenge balelaka mwana mobali ya liboso oyo asili kokufa.


Boye Yesu akendeki na ye nzela moko ; bato ebele bazalaki kolanda Ye mpe kotutana-tutana na Ye na bangambo nyonso.


Wana akomaki pene ya ekuke ya engumba, akutanaki na bato bazali kokende kokunda mwana mobali moko oyo awutaki kokufa : azalaki mwana kaka moko ya mwasi moko akufisa mobali. Mpe bato mingi ya engumba yango bazalaki elongo na mwasi yango.


Mobali moko oyo kombo na ye ezalaki Jairisi, mokambi ya ndako ya mayangani, ayaki, amibwakaki na makolo ya Yesu mpe abondelaki Ye ete akende na ndako na ye,


Nzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale ; mpe asilisaki bozwi na ye nyonso epai ya minganga, kasi moko te alongaki kobikisa ye na bokono yango.


Yesu atunaki : — Nani asimbi Ngai ? Lokola moto ata moko te andimaki, Petelo alobaki na Yesu : — Moteyi, ebele ya bato bazali kofinana-finana mpe kotutana-tutana na Yo.


Yango wana, ndenge lisumu ekotaki na mokili na nzela ya moto moko, mpe kufa na nzela ya lisumu, ndenge wana mpe kufa ekangaki bato nyonso na nzela ya lisumu, pamba te bato nyonso basalaki masumu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ