40 Tango Yesu azongaki, ebele ya bato bayambaki Ye, pamba te bango nyonso bazalaki kozela Ye.
Esengo na moto oyo ayokelaka ngai, oyo asenzelaka na ekuke na ngai mokolo na mokolo, mpe akengelaka na ekotelo na ngai !
Yesu amataki na bwato, akatisaki ebale mpe akendeki na engumba na Ye.
Soki ye moko Davidi azali kobenga Ye « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye ? Ebele ya bato bazalaki koyoka Ye na esengo.
Yesu azwaki bwato mpe azongaki na ngambo ya ebale ; mpe bato ebele basanganaki pene na Ye, pembeni ya ebale.
pamba te Erode azalaki kobanga Yoane, wana ayebaki ete Yoane azali moto ya sembo mpe mosantu, mpe azalaki kobatela ye. Tango nyonso oyo Erode azalaki koyoka Yoane koloba, azalaki komitungisa mingi ; nzokande azalaki kaka kosepela koyoka ye.
kasi bazalaki kokoka te, pamba te bato nyonso bazalaki koyoka Yesu na bokebi.
Mbala moko, Zashe akitaki mpe ayambaki Yesu na esengo.
Mokolo moko, wana Yesu azalaki pene ya ebale ya Genezareti, ebele ya bato batondaki pembeni na Ye mpo na koyoka Liloba na Nzambe.
— Zonga na libota na yo mpe tatola makambo nyonso oyo Nzambe asali mpo na yo. Boye mobali yango akendeki mpe atatolaki na engumba mobimba, makambo nyonso oyo Yesu asalaki mpo na ye.
Solo, Yoane azalaki lokola mwinda oyo bapelisi mpe ezali kongenga. Kasi bino, boponaki kosepela na kongenga na ye kaka mpo na mwa tango moke.
Yango wana, natindaki bato noki-noki epai na yo, mpe osali malamu ndenge oyei. Sik’oyo, biso nyonso tozali awa liboso ya Nzambe mpo na koyoka nyonso oyo Nkolo atindi yo koyebisa biso.