Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 8:37 - Mokanda na Bomoi

37 Bongo bato nyonso ya etuka ya bato ya Geraza basengaki na Yesu ete alongwa na etuka na bango, pamba te somo ekangaki bango. Boye Yesu amataki na bwato mpe akendeki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 8:37
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwasi yango alobaki na Eliya : — Moto na Nzambe, nasali yo nini ? Boni, oyaki na ndako na ngai mpo na kokundola lisumu na ngai mpe kobomisa mwana na ngai ya mobali ?


Bongo bato nyonso ya engumba babimaki mpo na kokutana na Yesu ; mpe tango bamonaki Ye, babondelaki Ye ete abima na etuka na bango.


Boye bakomaki kobondela Yesu ete abima na etuka na bango.


Moto oyo atosi bino atosi nde Ngai, moto oyo aboyi bino aboyi nde Ngai, nzokande moto oyo aboyi Ngai aboyi nde Motindi na Ngai.


Tango Simona Petelo amonaki bongo, afukamaki na mabolongo ya Yesu mpe alobaki : — Nkolo, zala mosika na ngai, pamba te nazali moto ya masumu !


Tango amonaki Yesu, agangaki mpe amibwakaki na makolo na Ye, na koganga na mongongo makasi koleka : — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, olingi nini epai na ngai ? Nabondeli Yo, kotungisa ngai te !


Ba-oyo bamonaki likambo oyo ewuti kosalema bayebisaki bato ndenge nini moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe akangolamaki.


Mobali oyo akangolamaki na milimo mabe asengaki kokende elongo na Ye, kasi Yesu azongisaki ye na koloba :


Soki bato baboyi koyamba bino, botika engumba na bango mpe bopupola putulu ya makolo na bino lokola litatoli mpo na kotelemela bango.


Bongo Yesu elongo na bayekoli na Ye bakendeki na mboka mosusu.


Bayaki kosenga bango bolimbisi, mpe babimisaki bango na boloko. Basengaki na bango ete balongwa na engumba wana.


Kasi sik’oyo mpo na nini tokufa kaka boye ? Moto ya monene oyo ekoki kozikisa biso mpe koboma biso soki tokobi koyoka mongongo na Yawe, Nzambe na biso, kolobela biso.


Bato ya Beti-Shemeshi balobaki : « Nani akoki kotelema liboso ya Yawe, Nzambe oyo ya bule ? Sanduku ekokende epai ya nani soki elongwe awa epai na biso ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ