33 Milimo mabe ebimaki kati na mobali yango, mpe ekotaki kati na bangulu. Mbala moko, etonga ya bangulu ekitaki mbangu longwa na ngomba kino kati na ebale mpe ezindaki.
Yesu alobaki na milimo yango : — Bobima ! Milimo mabe ebimaki kati na bato wana mibale mpe ekotaki kati na bangulu. Mbala moko, etonga nyonso ya bangulu ekitaki mbangu wuta na likolo ya ngomba kino na ebale ; mpe yango nyonso ezindaki mpe ekufaki kati na mayi.
Nzokande, etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia kuna na ngomba. Milimo mabe esengaki na Yesu ete atika yango kokota kati na bangulu ; mpe Yesu apesaki yango nzela.
Ezali Satana nde azali tata na bino, mpe bolingi nde kaka kokokisa posa ya tata na bino. Wuta na ebandeli, ye azala mobomi ; avandaka kati na solo te, pamba te solo ezalaka te kati na ye. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye ; pamba te azali mokosi mpe tata ya lokuta.
Bolekisaka ndelo te na bizaleli na bino mpe botambolaka na ekenge, pamba te monguna na bino, Satana, atambolaka zingazinga na bino lokola nkosi oyo ezali konguluma mpe koluka moto ya kolia.
Anjelu ya libulu ya monene mpe ya molili makasi nde azalaki mokonzi na yango. Kombo na ye, na lokota ya Ebre, « Abadoni ; » mpe, na lokota ya Greki, « Apolioni. »