Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 8:32 - Mokanda na Bomoi

32 Nzokande, etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia kuna na ngomba. Milimo mabe esengaki na Yesu ete atika yango kokota kati na bangulu ; mpe Yesu apesaki yango nzela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 8:32
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Molimo yango ezongisaki : « Nakokende mpe nakobongwana molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na ye nyonso. » Yawe alobaki : « Solo, okolonga kokosa ye ! Kende mpe sala bongo. »


Boni, otonga mir te zingazinga na ye mpo na kobatela ye, ndako na ye mpe biloko na ye nyonso ? Opambola misala ya maboko na ye, mpe bibwele na ye epanzana na mokili mobimba.


Yawe alobaki na Satana : — Malamu ! Biloko na ye nyonso ezali kati na maboko na yo ; kasi, kokitisa loboko na yo te na bomoi na ye ! Boye, Satana alongwaki liboso ya Yawe.


Yawe alobaki na Satana : — Malamu ! Azali kati na maboko na yo, kasi kosimba bomoi na ye te !


Botiaka elikya te na mileki ya moyibi, mpe botielaka yango motema te ; soki bomengo na bino ekomi ebele, bokangama na yango te.


bato oyo bavandaka kati na bakunda mpe balekisaka babutu na bango kati na madusu ya mabanga ; bato oyo baliaka misuni ya ngulu mpe basani na bango etonda na bilei ya mbindo ;


Moto oyo atumbi mbeka ya ngombe azali lokola ye oyo abomi moto, moto oyo atumbi mbeka ya mwana meme azali lokola ye oyo abuki kingo ya mbwa, moto oyo apesi makabo ya mbuma azali lokola ye oyo abonzi makila ya ngulu, moto oyo atumbi ekaniseli ya malasi ya ansa azali lokola ye oyo apamboli nzambe ya ekeko. Solo, baponi kolanda banzela na bango moko mpe kosepela na makambo na bango ya nkele.


ngulu, pamba te ezali na litindi epasuka na kati-kati kasi ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu : ezali mbindo mpo na bino.


Bopesa te biloko ya bule epai ya bambwa, noki te ekozongela bino mpo na koswa bino ; bobwaka te bapawuni na bino ya talo epai ya bangulu, noki te ekonyata-nyata yango.


Bongo milimo mabe yango ezalaki kosenga na Yesu ete atinda yango te kati na libulu ya mozindo.


Milimo mabe ebimaki kati na mobali yango, mpe ekotaki kati na bangulu. Mbala moko, etonga ya bangulu ekitaki mbangu longwa na ngomba kino kati na ebale mpe ezindaki.


Yesu alobaki na ye : — Okokaki kozala na bokonzi moko te likolo na Ngai soki epesamelaki yo te wuta na likolo. Yango wana, moto oyo akabi Ngai na maboko na yo asali lisumu monene koleka.


Bino, bana na ngai, bozali ya Nzambe mpe bosili kolonga basakoli yango ya lokuta, pamba te Ye oyo azali kati na bino azali na nguya koleka ye oyo azali kati na mokili.


Tango mibu wana nkoto moko ekosila, bakobimisa Satana wuta na boloko na ye,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ