Luka 8:31 - Mokanda na Bomoi31 Bongo milimo mabe yango ezalaki kosenga na Yesu ete atinda yango te kati na libulu ya mozindo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nyama oyo omonaki ; oyo liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te ; ekobima wuta na libulu moko ya monene mpe ya molili makasi, mpe ekokende na libebi na yango. Bavandi ya mokili, ba-oyo bakombo na bango ekomama te kati na buku ya bomoi wuta na ebandeli ya mokili bakokamwa tango bakomona nyama ; pamba te liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te, kasi ekoya lisusu.
Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.