Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 8:30 - Mokanda na Bomoi

30 Yesu atunaki ye : — Kombo na yo nani ? Azongisaki : — Ngulupa. Pamba te milimo mabe ebele ekotaki kati na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 8:30
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okanisi ete nakoki te kobenga Tata na Ngai, oyo akoki mpe mbala moko kotinda ba-anjelu koleka bankoto zomi mpo na koya kosunga Ngai ?


Sango na Ye epanzanaki kati na Siri mobimba, mpe bato bazalaki komemela Ye babeli oyo bazalaki na bokono ya ndenge na ndenge mpe oyo bazalaki na mikakatano makasi : bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe, bato oyo bazalaki na bokono ya ndeke mpe bato oyo bazalaki na makolo mpe maboko ya kokufa ; mpe azalaki kobikisa bango.


Bakomaki koganga : — Mwana na Nzambe, biso na yo likambo nini ? Boni, oyei awa mpo na kotungisa biso liboso ya tango oyo ekatama ?


Na tongo ya mokolo ya liboso ya poso, tango Yesu asekwaki, abimelaki liboso Mari, moto ya mboka Magidala, oyo, kati na ye, Yesu abenganaki milimo mabe sambo.


Yesu atunaki ye : — Kombo na yo nani ? Azongisaki : — Kombo na Ngai ezali ngulupa, pamba te tozali ebele !


bakisa ndambo ya basi oyo bakangolamaki na milimo mabe mpe babikisamaki na bokono : Mari, moto ya Magidala, oyo kati na ye, Yesu abenganaki milimo mabe sambo ;


Pamba te Yesu apesaki mitindo na molimo ya mbindo ete ebima kati na mobali oyo ekangaki wuta kala. Mpe atako bakangaki ye minyololo na maboko mpe makolo mpe bazalaki kokengela ye, kasi abukaki minyololo yango, mpe molimo mabe ekumbaki ye na bisika oyo azalaki kaka ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ