Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 8:28 - Mokanda na Bomoi

28 Tango amonaki Yesu, agangaki mpe amibwakaki na makolo na Ye, na koganga na mongongo makasi koleka : — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, olingi nini epai na ngai ? Nabondeli Yo, kotungisa ngai te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 8:28
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo wana, Yawe akopesa etumbu na Leviatani, nyoka oyo ekimaka, na Leviatani, nyoka ya somo, na nzela ya mopanga na Ye ya minu, mopanga na Ye ya monene mpe ya nguya ; akoboma elima ya ebale monene.


Bakomaki koganga : — Mwana na Nzambe, biso na yo likambo nini ? Boni, oyei awa mpo na kotungisa biso liboso ya tango oyo ekatama ?


Tango Yesu anyataki mabele, mobali moko abimaki na engumba mpe ayaki kokutana na Ye ; azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Wuta kala, azalaki lisusu te kolata bilamba mpe kovanda na ndako, kasi akomaki kovanda kati na bakunda.


Pamba te Yesu apesaki mitindo na molimo ya mbindo ete ebima kati na mobali oyo ekangaki wuta kala. Mpe atako bakangaki ye minyololo na maboko mpe makolo mpe bazalaki kokengela ye, kasi abukaki minyololo yango, mpe molimo mabe ekumbaki ye na bisika oyo azalaki kaka ye moko.


Ondimaka ete Nzambe azali kaka moko ? Osalaka malamu ! Kasi milimo mabe mpe endimaka ete Nzambe azali kaka moko, mpe elengaka.


Soki Nzambe azangaki te kopesa na ba-anjelu oyo basalaki masumu etumbu kasi abwakaki bango ya kokangama na minyololo kati na molili makasi ya lifelo epai wapi abombi bango mpo na kozela mokolo ya kosambisama,


Moto oyo amipesaka na masumu azali ya Satana, pamba te Satana asalaka masumu wuta na ebandeli. Nzokande Mwana na Nzambe ayaki penza mpo na kobebisa misala ya Satana.


Bongo Satana oyo azalaki kokosa bango abwakamaki na liziba ya moto mpe ya sofolo, epai wapi nyama mpe mosakoli ya lokuta babwakamaki. Bakonyokolama kuna seko na seko, butu mpe moyi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ