Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 8:25 - Mokanda na Bomoi

25 Yesu atunaki bayekoli na Ye : — Wapi kondima na bino ? Kasi bango, batondaki na somo mpe bakamwaki, bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani ? Azali kopesa mitindo ata na mipepe mpe na mayi, mpe yango ezali kotosa ye ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 8:25
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nani amata na Lola to mpe akita wuta kuna ? Nani asangisa mopepe kati na maboko na ye ? Nani akanga mayi na kazaka na ye ? Nani akata bandelo nyonso ya mabele ? Kombo na ye nani ? Mpe kombo ya mwana na ye ezali nani ? Yebisa ngai soki oyebi !


tango akatelaki ebale monene mondelo mpo ete mayi ezindisa mokili na Ye te, tango atiaki miboko ya mabele ;


Mbala moko, Yesu asembolaki loboko epai na ye, asimbaki ye mpe alobaki na ye : — Moto na kondima moke, mpo na nini otie tembe ?


Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete bozali na kondima moke. Nazali koloba na bino penza ya solo : soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, bokokaki koloba na ngomba oyo : « Longwa awa, kende kuna ; » mpe ekokende penza. Eloko moko te ekoki kozanga kosalemela bino. [


Soki Nzambe alatisaka ndenge wana matiti ya bilanga, oyo, na mokolo ya lelo, ezali na bomoi mpe, lobi, ekobwakama na moto, ekozala ndenge nini mpo na bino ? Akolatisa bino te na ndenge ya kitoko koleka ? Bato ya kondima moke !


Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki mingi mpe alobaki na bato oyo bazalaki kolanda Ye : — Nazali koloba na bino penza ya solo : natikali nanu komona te kondima ya boye kati na Isalaele !


Kasi Yesu alobaki na bango : — Bato na kondima moke ! Mpo na nini bozali kobanga ? Bongo atelemaki, agangelaki mopepe mpe mbonge ; bongo kimia monene ezongaki.


Kaka na mokolo yango wana, wana pokwa ekomaki, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale.


Soki Nzambe alatisaka bongo matiti oyo, lelo, ezali kati na bilanga, mpe, lobi, ekobwakama na moto, akozanga te kolatisa bino, bato ya kondima moke ?


Bayekoli bapusanaki mpe balamusaki Ye na koganga : — Moteyi, Moteyi, tozali kokufa ! Yesu alamukaki mpe apesaki mitindo na mopepe mpe mbonge ; bongo ekitaki, mpe kimia ezongaki.


Bakomaki na etuka ya Geraza oyo ezali na ngambo mosusu ya ebale, etalana na Galile.


Yesu alobaki na ye : — Nalobaki na yo te ete soki ondimi, okomona nkembo ya Nzambe ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ