Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 8:24 - Mokanda na Bomoi

24 Bayekoli bapusanaki mpe balamusaki Ye na koganga : — Moteyi, Moteyi, tozali kokufa ! Yesu alamukaki mpe apesaki mitindo na mopepe mpe mbonge ; bongo ekitaki, mpe kimia ezongaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 8:24
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alendisaka bangomba, na nguya na Ye ; atondi na mpiko.


Mpo na nini moto azalaki te tango nayaki ? Mpo na nini moto apesaki eyano te tango nabengaki ? Loboko na Ngai ezalaki mokuse mpo na kosikola bino ? Nazangaki solo makasi mpo na kokangola bino ? Na pamela na Ngai, nakawusaka ebale monene, nakomisaka bibale esobe ; mbisi na yango ekomaka kolumba solo mpo ete mayi ezali te mpe ekufaka na posa ya mayi.


Bokoki penza kobanga Ngai te, » elobi Yawe ? « Bokoki solo kolenga liboso na Ngai te, Ngai oyo nasala zelo lokola mondelo ya mayi, epekiselo ya libela oyo mayi ekoleka ata mokolo moko te ? Mayi ekoki kotomboka, kasi ezali na nguya te ; ata soki esali makelele, kasi ekoleka mondelo yango te.


Agangelaka ebale monene mpe akawusaka yango, akawusaka bibale nyonso. Etuka ya Bashani mpe ya Karimeli esili nyonso kokawuka, mpe matiti nyonso ya Libani esili kokawuka.


Kasi tango amonaki ndenge mopepe ezali kopepa makasi, akomaki na somo mpe, lokola akomaki kozinda, agangaki : — Nkolo, bikisa ngai !


Bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balamusaki Ye na koganga : — Nkolo, bikisa biso ! Tozali kokufa !


Yesu alamukaki, agangelaki mopepe, mpe apesaki mitindo na ebale : — Tika makelele ! Vanda nye ! Mopepe esilaki, mpe kimia monene ezongaki.


Yesu atelemelaki molimo mabe yango mpe apesaki yango mitindo : — Kanga monoko na yo ! Bima kati na moto oyo ! Molimo mabe ebwakaki moto yango na mabele, liboso ya bato nyonso, ebimaki kati na ye mpe esalaki ye ata mabe moko te.


Yesu agumbamaki pembeni na ye, apesaki mitindo na fievele, mpe fievele esilaki. Kaka na tango yango, mama-bokilo ya Simona atelemaki mpe akomaki kobongisela bango bilei.


Simona azongiselaki Ye : — Moteyi, tosali butu mobimba, tozwi ata eloko moko te. Kasi lokola olobi bongo, nakobwaka minyama.


Yesu atunaki bayekoli na Ye : — Wapi kondima na bino ? Kasi bango, batondaki na somo mpe bakamwaki, bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani ? Azali kopesa mitindo ata na mipepe mpe na mayi, mpe yango ezali kotosa ye ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ